16 Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino !
Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo.
Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba.
Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.