15 Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba.
Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa.
Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino !
Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.