Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:13 - Mokanda na Bomoi

13 Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:13
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.


Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango.


Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.


Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe.


Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko ; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba.


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ