Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa.
Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.
Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta.