10 Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : — Boganga te, boloba mpe eloko moko te ! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi ; wana nde bokoganga makasi.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.