15 Mokonzi ya mampinga ya Yawe alobaki na ye : — Longola basapato na yo na makolo, pamba te esika oyo ozali ezali bule. Jozue asalaki se bongo.
Nzambe alobaki na ye : — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.
Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima.
Mpe, biso moko, tango tozalaki elongo na Ye na likolo ya ngomba ya bule, toyokaki mongongo yango kowuta na Likolo.