12 Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya ; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana.
Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te ; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.