10 Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.
Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
Kasi basoda ya Babiloni balandaki bango mpe bakangaki Sedesiasi, na etando ya Jeriko ; bazwaki ye mpe bamemaki ye na Ribila, kati na mokili ya Amati, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo akatelaki ye etumbu.
Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki.
Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »
Bakendeki kokutana na Jozue kati na molako ya Giligali, mpe balobaki na ye mpe na bana ya Isalaele : — Towuti na mokili moko ya mosika ; bosala boyokani elongo na biso.