9 Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo.
Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo.
Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »
Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe.