Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 4:6 - Mokanda na Bomoi

6 mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 4:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.


Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.


Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.


Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.


— Loba na bana ya Isalaele : « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba ; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino.


Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.


Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »


Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.


Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino. ’


Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.


Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.


Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › »


Alobaki na bana ya Isalaele : « Tango bakitani na bino bakotuna batata na bango : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? ›


Jozue alobaki na bango : « Boleka liboso ya Sanduku ya Yawe, Nzambe na bino, kino na kati-kati ya Yordani. Moko na moko kati na bino amema libanga na lipeka na ye kolanda motango ya mabota ya Isalaele


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ