Pesa bango mitindo oyo : ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › »
Boye, bana ya Isalaele basalaki ndenge Jozue atindaki bango. Bazwaki kati na Yordani, mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya Isalaele, ndenge Yawe alobaki na Jozue. Bamemaki yango kino na molako na bango, epai wapi batiaki yango.