Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino.
Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.
Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani : « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. »
Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango.
Boye Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe babimaki wuta na ebale. Tango kaka batiaki matambe na bango na mokili, mayi ya Yordani ezongaki na esika na yango, etondaki makasi mpe ekomaki kotiola ndenge ezalaki momesano na yango.