Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani : « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 3:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya alobaki na ye : — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.


Tango basangisaki bandeko na bango mpe bamibulisaki, bakotaki mpo na kopetola Tempelo ya Yawe, ndenge mokonzi apesaki mitindo mpe kolanda Liloba na Yawe.


Ezekiasi apesaki mitindo ete babonza mbeka ya kotumba na etumbelo ; mpe tango babandaki kobonza mbeka ya kotumba, babandaki mpe koyemba mpo na kokumisa Yawe na bakelelo mpe bibetelo mindule ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.


Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.


Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.


Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo !


Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.


Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.


Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe !


Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.


mpo na kopesa bato mitindo oyo : — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.


Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.


Jozue alobaki na bana ya Isalaele : — Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino.


Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ