7 Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.
Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.
Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.
Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize !
Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani : « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. »
Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu.