Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 3:6 - Mokanda na Bomoi

6 Jozue alobaki na Banganga-Nzambe : — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 3:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Banganga-Nzambe batombolaki Sanduku.


Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Balevi batombolaki Sanduku.


Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.


Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.


Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba :


epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.


mpo na kopesa bato mitindo oyo : — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.


Jozue alobaki na bato : — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.


Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.


Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango : — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ