Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
Moyize alobaki na Yawe : — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo.
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo ateyaka yo makambo ya malamu mpo na bolamu na yo ; oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.