Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 3:17
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki.


Abongolaki ebale monene mabele ya kokawuka ; bakatisaki ebale na makolo ekawuka. Tozali kosepela kati na Ye.


Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.


Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.


Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


« Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana,


Mpo na kondima, bato ya Isalaele bakatisaki ebale monene ya Barozo lokola nde bazali kotambola na mabele ya kokawuka ; kasi tango bato ya Ejipito bamekaki kosala lokola bango, bazindaki.


Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue :


Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani.


Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato.


Boyebisa bango : ‹ Bato ya Isalaele bakatisaki Yordani na mabele ya kokawuka. ›


Pesa bango mitindo oyo : ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › »


Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ