Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale ; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 3:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.


Yo nde osalaki ete bitima ya mayi mpe miluka etiola, mpe okawusaki bibale mpo na libela.


akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango, atelemisaki mayi lokola mir.


Na pema ya zolo na Yo, mayi ekabwani, bambonge etelemi lokola mir, mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Otambolaka na ebale elongo na bampunda na Yo ; boye oningisaka mayi minene.


Boye, alobaki : — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.


Sanduku ya Boyokani ya Yawe ya mokili mobimba ekoleka liboso na bino kati na mayi ya Yordani.


Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ