Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »
Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi.