Jozue 24:7 - Mokanda na Bomoi7 Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?
Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.