Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 24:32 - Mokanda na Bomoi

32 Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 24:32
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.


Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo : eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.


Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »


Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »


Moyize azwaki mikuwa ya Jozefi, pamba te Jozefi alapisaki bana ya Isalaele ndayi ; alobaki : « Solo, Nzambe akozanga te kosunga bino, boye bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo mpe bokomema yango elongo na bino. »


akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.


Boye, Jakobi akendeki kovanda na Ejipito epai wapi ye elongo na bakoko na biso bakufaki.


Bamemaki banzoto na bango na engumba ya Sishemi mpe bakundaki yango kati na kunda oyo Abrayami asombaki na mbongo epai ya bana ya Amori, tata ya Sishemi.


Mpo na kondima, wana Jozefi akomaki na suka ya bomoi na ye, asakolaki kobima ya bana ya Isalaele longwa na Ejipito mpe apesaki mitindo na tina na mikuwa na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ