Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.
Pamba te libula moko te kati na Isalaele ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu ; moto nyonso ya Isalaele asengeli kobatela mabele ya libota oyo azwaki lokola libula wuta na bakoko na ye.
Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › »
Jozue alobaki na bato nyonso : — Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te.