Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi.
Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba ; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.
Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango.
Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.
Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe.