Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 24:20 - Mokanda na Bomoi

20 Soki bosundoli Yawe mpe bokeyi kosalela banzambe ya bapaya, akobalukela bino mpo na kosala bino mabe, mpe akosilisa koboma bino sima na kotalisa bino bolamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 24:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, napesi bino mokumba liboso ya Isalaele mobimba, ya lisanga ya Yawe, mpe liboso ya Nzambe na biso, oyo azali koyoka biso : Bosala keba mpo na kolanda mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bino, mpo ete bozwa mokili oyo ya kitoko mpe kotika yango lokola libula epai ya bakitani na bino mpo na libela.


Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !


Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso ; pamba te tolobaki na mokonzi : « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. »


Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai mpe balandi bosembo na ngai te,


Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama, bato oyo bakobosana Yawe bakosila.


Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.


Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.


Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.


Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango kosambela mampinga ya likolo, ndenge ekomama kati na buku ya basakoli : « Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe ?


Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye,


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.


Kasi bato balobaki na Jozue : — Te, tokosalela kaka Yawe !


Kasi soki botosi Yawe te mpe bobateli te mibeko na Ye, loboko na Ye ekobalukela bino ndenge ebalukelaki bakoko na bino.


Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ