Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo ?
Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango.
Sima na kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya Bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi ;
Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino ; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki.
Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso.