Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi bokangama makasi na Yawe, Nzambe na bino, ndenge bozali kosala kino na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atikalaki ya kokangama na Yawe mpe atikaki te kolanda Ye ; abatelaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.


Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ;


bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.


Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino ; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye.


Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo.


Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino.


Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »


Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.


Yawe abenganaki bikolo ya minene mpe ya nguya liboso na bino ; mpe kino na moyi ya lelo, moko te alongi kotelema liboso na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ