Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bagumbamelaki banzambe ya bikeko oyo na tina na yango Yawe alobaki : « Bokosala bongo te. »


Kasi tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na likambo oyo : tango nkolo na ngai akotaka na ndako ya nzambe Rimoni mpo na kogumbama, nagumbamaka elongo na ye, pamba te alalelaka loboko na ngai. Tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na yango.


Kasi soki bopengwi mosika na Ngai, soki bosundoli mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango,


Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te ; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino.


Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »


Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.


Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai.


« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.


Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.


bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,


elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.


Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda.


Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »


Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.


Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.


Tosa Yawe, Nzambe na yo ; salela kaka Ye mpe lapa ndayi na yo na Kombo na Ye.


Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo ;


Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,


Kasi bokangama makasi na Yawe, Nzambe na bino, ndenge bozali kosala kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ