Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ndenge kaka bilaka nyonso ya kitoko ya Yawe, Nzambe na bino, ekokisamaki solo, ndenge wana mpe akotindela bino makambo mabe kino tango akosilisa koboma bino kati na mokili ya kitoko oyo apesaki bino

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akobeta Isalaele, mpe Isalaele akoningana lokola nzete oyo ebotaka na mayi, oyo mayi ezali koningisa ; akopikola Isalaele wuta na mabele ya malamu oyo apesaki na bakoko na ye mpe akopanza bango mosika ya ebale Efrate, pamba te balamusi kanda ya Yawe na kosalaka makonzi ya bule mpo na Ashera.


« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.


Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.


Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »


Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,


bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.


Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ