Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:14 - Mokanda na Bomoi

14 Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:14
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.


— Nalingi kokende na nzela oyo bato nyonso bakendaka. Zala makasi, lakisa ete ozali mobali.


« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.


Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela ; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te ; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya,


Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ