Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:12
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.


Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.


Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele : « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi.


Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.


Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.


Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.


Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.


bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.


ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.


Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.


Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te ! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.


pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili.


Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali ;


noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.


Boye, bosala keba ete bolinga Yawe, Nzambe na bino.


Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na pole kasi ayinaka ndeko na ye, azali nanu kati na molili.


Tata mpe mama na ye bazongisaki : — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te ? Kasi Samison alobaki na tata na ye : — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai.


babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ