Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye, bosala keba ete bolinga Yawe, Nzambe na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:11
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.


Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !


Kasi moto oyo alingaka Nzambe, Nzambe ayebi ye.


Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.


Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.


Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.


Bongo, bomisenzela malamu, pamba te bomonaki nzoto te na mokolo oyo Yawe alobelaki bino na ngomba Orebi wuta na moto.


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.


Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »


Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki.


Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ