Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 23:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na Yawe kopesa bopemi na Isalaele liboso ya banguna nyonso oyo bazingelaki bango, elekaki tango molayi. Bongo, Jozue akomaki mobange, mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 23:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye.


Tango mokonzi Davidi akomaki mobange makasi, azalaki lisusu koyoka moto te na nzoto, ezala bafiniki ye bilamba ebele.


Bongo Davidi alobaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi bopemi na bato na Ye mpe avandi libela kati na Yelusalemi.


Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi : ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki : kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.


Asa asalaki makambo ya malamu mpe ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.


Atongaki bingumba makasi kati na Yuda mpo ete mokili ezalaki na kimia. Na mibu wana, moto moko te abundisaki ye, pamba te Yawe apesaki ye bopemi.


Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso.


Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.


lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku, Molimo na Yawe apesaki bango bopemi. Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.


« Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. ›


Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.


Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.


Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.


Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ