Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › »
Jozue alobaki na bato nyonso : — Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te.