Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 22:31 - Mokanda na Bomoi

31 Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase : — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 22:31
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !


mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,


mpo na nini ozali kosala zuwa, ngomba ya basonge ebele, ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ? Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.


Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.


Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »


« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »


Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba : « Solo, Nzambe azali kati na bino. »


Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.


Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki.


Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ