Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 22:29 - Mokanda na Bomoi

29 Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 22:29
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Jozefi alobaki : — Nakoki kosala likambo ya boye te ! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino.


Kasi bazongiselaki ye : — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye ? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te.


Kasi Naboti azongiselaki Akabi : — Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai.


Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’


Boni, ezali kaka Ezekiasi wana te oyo alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo ya banzambe tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‹ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo moko kaka mpe kobonza mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo yango ? ›


Te, ezali bongo te ! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili ?


Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ?


Boye toloba nini ? Mabe ezali kati na Nzambe ? Soki moke te !


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso !


Yango wana tomilobelaki : « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu.


Tomilobelaki : « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango : ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki ; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › »


Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.


Bato bazongisaki : — Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu !


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ