Jozue 22:27 - Mokanda na Bomoi27 Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Liboke oyo ya mabanga ezali motatoli, mpe libanga oyo ya elembo ezali motatoli. Nasengeli te kokatisa liboke oyo ya mabanga mpe libanga oyo ya elembo mpo ete naya kosala yo mabe na ngambo na yo ; mpe yo osengeli te kokatisa liboke ya mabanga mpe libanga ya elembo mpo na koya kosala ngai mabe na ngambo na ngai.
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.