Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 22:25 - Mokanda na Bomoi

25 Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino ; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi ! Bozali na libula moko te epai na Yawe ! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 22:25
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.


mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Nazongiselaki bango : — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino !


Yawe, Yo moko kaka nde ozali libula mpe bomoi na ngai ; ozali ndanga ya bozwi na ngai.


Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.


Te, ezali bongo te ! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso : « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele ?


Yango wana tomilobelaki : « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu.


Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › »


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ