Jozue 22:23 - Mokanda na Bomoi23 Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.