Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 22:20 - Mokanda na Bomoi

20 Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 22:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi.


Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.


Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto.


Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki.


Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele :


Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele.


Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.


Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori.


Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.


soki Nzambe apesaki na bingumba ya Sodome mpe Gomore etumbu na nzela ya moto oyo ezikisaki yango kino ekomaki putulu mpo na kopesa ndakisa ya etumbu oyo ekokweyela bato ya masumu


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ