13 Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela.
Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.
ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango : « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te,
Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.