Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki.