Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 22:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 22:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.


Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda.


amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki : moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo.


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bongo, batindami ya mokonzi babimaki mpo na kolanda banongi na nzela oyo ekenda kino na esika oyo bakatiselaka ebale Yordani na makolo. Tango kaka batindami yango babimaki na engumba, bakangaki mpe mbala moko ekuke.


Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani.


— Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ?


Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso.


Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ