Kati na libota ya Ribeni, kuna na ngambo ya este ya Yordani, pembeni ya Jeriko, bazwaki bingumba oyo : Betseri, kati na esobe, mpe bamboka na yango ya mike ; Yakatsi mpe bamboka na yango ya mike,
Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.
Boye, ndenge Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize, bana ya Isalaele babetaki zeke mpo na kopesa bingumba wana elongo na mabele na yango epai ya bakitani ya Levi.