6 Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.
Bakitani ya Gerishoni bazwaki : Kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki bingumba oyo : Golani kati na Bashani mpe bamboka na yango ya mike, Ashitaroti mpe bamboka na yango ya mike.
Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.