5 Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Kati na libota ya Nefitali, bazwaki : Kedeshi kati na Galile mpe bamboka na yango ya mike, Amoni mpe bamboka na yango ya mike, Kiriatayimi mpe bamboka na yango ya mike.
Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame.
Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.