42 Engumba moko na moko ezingelamaki na mabele na yango ; ezalaki penza bongo mpo na bingumba yango nyonso.
Bingumba nyonso ya bakitani ya Levi kati na mabele oyo epesamelaki bana ya Isalaele ezalaki tuku minei na mwambe, elongo na mabele na yango.
Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.