Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.
Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.