3 Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.
Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango : « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. »
Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame.