Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo : Kati na ndambo ya libota ya Manase : kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.
Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.