Jozue 21:25 - Mokanda na Bomoi25 Kati na ndambo ya libota ya Manase, bapesaki bango bingumba oyo : Taanaki, Gati-Rimoni elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).